Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sassou andimami mpo na kopesa nkombo na présidentielle na ngambo ya majorité


Président Denis Sassou N'Guesso na ndako ya mosala na ye na Brazzaville, 23 juillet 2020. (Twitter/Thierry Moungalla)
Président Denis Sassou N'Guesso na ndako ya mosala na ye na Brazzaville, 23 juillet 2020. (Twitter/Thierry Moungalla)

Président Denis Sassou N’Guesso andimami na baye bazali na ngambo ya bokonzi na ntina ya kopesa nkombo na ye na maponami ma mokonzi ya mboka na mars 2021.

Mangoma 17 maye mazali na majorité présidentielle baponi ya bango banso.

"Lingomba moko na moko ya majorité présidentielle lindimi président Sassou N’Guesso mpo apesa nkombo na maponami ma mokonzi ya ekolo. Majoirté présidentielle ekanisi ete kati na bakambi ba yango banso, président Sassou nde azali na makoki koleka," esakoli mokambi ya majorité présidentielle mpo na mwa ntango, Pierre Moussa.

"Tokosala nyonso mpo na kondimisa président ya majorité présidentielle (M. Sassou) kondima bosenga na balandi baye," elaki M. Moussa oyo azali mpe kalaka mikonzi ya PCT (Parti congnolais du Travail), lingomba lya monkonzi ya mboka.

M. Sassou akomi na mibu 77, akokisa mibu 36 na bokonzi.

Na ngambo ya opposition, Mathias Dzon, na mibu 73, ya UPRN ministre ya kala ya Finances asi asakoli ete akopesa nkombo na maponami ma mokonzi ya mboka ya mars 2021.

XS
SM
MD
LG