Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Brazzaville ekobanda kopesa mangwele ma COVID-19 na 20% ya bana mboka na 1er trimestre ya 2021


Dr. Nikki Kanani asimbi mangwele ya Oxford University/AstraZeneca ya COVID-19 na esika ya lisungi na Sidcup, Londres, 7 janvier 2021.
Dr. Nikki Kanani asimbi mangwele ya Oxford University/AstraZeneca ya COVID-19 na esika ya lisungi na Sidcup, Londres, 7 janvier 2021.

Congo-Brazzaville ekopesa mangwele ya COVID-19 na 20% ya bana ba yango na trimestre ya yambo ya mobu 2021, elobi ministre ya Bokolongono Jacqueline Lydia Mikolo na bapanzi sango.

Ministre Mikolo ayebisi ete koleka bato 7.164 bazwami na COVID-19 na Congo-Brazzaville mpe 112 bakufi, pene na 5.846 babiki.

Congo ezali na kati na misala mya GAVI (Alliance pour la vaccin) mpo tozala kati na liboke likopesa mangwele ya VOCID-19 na lolenge ya kokokana na bato banso mpe tozwa yango na 1er trimester 2021, alimboli Mme Mikolo.

Eteni yay ambo ekozala mpo na 20% ya bana mboka, elobaki Mme Mikolo.

Yango kokoma na 60% ntango mbulamatari ekozwa makoki na lisungi lya basungi.

Tokundola ete yambo na Noel, président Denis Sassou n'Guesso asakolaki ete atiaki Congo0=-Brazzaville nzela ya mangwele mpe asengaki mbulamatari koluka mangwele ya malamu mpo na mboka.

XS
SM
MD
LG