Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Vidéo ya bokomi ya mampinga ya Etats-Unis na ambassade na Baghdad


Vidéo ya bokomi ya mampinga ya Etats-Unis na ambassade na Baghdad
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:00:38 0:00

Département d’Etat ya USA ebimisi vidéo ya lolenge ba Marines (basoda ya Etats-Unis) bazali kokoma na lopango ya ambassade ya Etats-Unis na Bagdad.

Police mpe misala ya bokengi na engumba mikonzi ya #Irak mibetaki gaz mercredi mpo na kobengana bituluku ya batelemeli baye basangani mpo na mokolo ya mibale na esika eye.
Batelemeli mingi balalki na esika eye. Bazali koboya lolenge Etats-Unis eyanolaki na kobeta bombe na ba simba minduki.
Président Donald Trump alobaki mardi “Iran nde ezali na mokumba ya mbeba nyonso ekokma na ndako mpe na bato na lopango ya ambassade ya Etats-Unis“.
“Bakofuta moutya monene. Nazali kobangisa te kasi kokebisa solo,“ elobaki M. Trump.
Mokambi ya likolo ya Iran, Ayatollah Ali Khamenei apamelaki, na compte Twitter na ye, misala ya Etats-Unis na Irak mpe na Syrie.
#Ayatolah Ali Khamenei ayanolaki na M. Trump na koloba: “Okosala eloko moko te“.
XS
SM
MD
LG