Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Vote mpo na bofundami ya Trump mposo ekoya


Président Donald Trump na Maison blanche (Ndako ya pembe), ndako ya mosala ya ye, Washington, 13 décembre 2019.
Président Donald Trump na Maison blanche (Ndako ya pembe), ndako ya mosala ya ye, Washington, 13 décembre 2019.

Likambo esalami nsima ya bolukiluki na likambo ya Donald Trump kotinda président ya Ukaine kosala enquête likolo ya Joe Biden (démocrate), oyo akoki kozala mbanda na ye na maponami makoya na 2020.

Vote yango esengelaki esalema le 12 décembre kasi ba démocrates mpe ba républicains (bayi lingomba ya M. Trump), bandongwanaki kino butu makasi.

Moko na ba articles mozali kofunda M. Trump na "abus de pouvoir" to kosalela bokonzi na ndenge ya mabe. Oyo mabilae elobi ete M. Trump amekaki kopekisa Congrès kosala bolukiluki.

Bayi Trump bamemaki ba amendements ebele mpo koluka kopekisa vote yango kasi esalamaki kaka.

23 démocrates ya commission nde bandimi ba articles yango na vote. Ba républicains 17 baboyaki yango na vote.

M. Trump akofundama soki Chambre ya ba représentants epayi wapi ba mbanda na ye ya ba démocrates baleki na ebele (233 contre 197), elekisi to endimi na vote makambo maye matiyami na mokongo mwa ye. Yango ebengami na anglais "impeachment".

Kasi ba républicains lokola baleki mingi na Sénat (53 likolo na mabonga 100) bakomeka kosangisa makasi mpo na kosunga M. Trump.

Suku mibale miye ya Parlement (Chambre mpe Sénat) ekozala lokola ba procureurs (démocrates) mpe ba avocats (républicains) na misala myango.

Ekosenga majorité ya deux tires mpo na kokweyisa Donald Trump.

XS
SM
MD
LG