Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kelly Craft, ntoma ya sika ya USA na ONU azwi ebonga na ye


Ntoma Kelly Craft (G) ya USA, na masolo na président Donald Trump, na base ya Bagotville, na Canada, 9 juin 2018.
Ntoma Kelly Craft (G) ya USA, na masolo na président Donald Trump, na base ya Bagotville, na Canada, 9 juin 2018.

Kelly Craft, ntoma ya sika ya USA na Nations unies azwi ebonga na ye ya mosala o’mokolo ya minei na ndako ya misala ya ONU na New York.

Kelly Craft, mama ya mibu 57, apesami mosala yango na président Donald Trump mpo na kozwa ebonga ezalaki ya Nikki Halley.

Sanza libwa eleki, Nikki Halley atikika mosala na ye mpe alaobaki ete abendamaki na ebonga esusu.

Mzokande Kelly Craft azalaki ambassadrice ya Etats-Unis na Canada epayi wapi azali moko na baye basalaki masolo mpo boyokani ya sika ya libre-échange nord-américain (bosombitinya ya nsomi) ya Amerika ya likolo.

Kelly Craft azali molongani ya milliardaire Joe Craft, moye ya misala ya charbon.

Tokundala ete, Nikki Halley oyo akitani na ye, abundaki mingi mpo na maponami masalema na Congo démocratique mpe mpo Joseph Kabila apesa nkombo na ye te na maponami myango lokola asilaki kokisa koleka mandats mibale ya bokonzi na RDC.

XS
SM
MD
LG