Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kobanga ete matata mamata nsima na bobomi ya gén. Soleimani na basoda ya USA na Irak


Moko na batelemeli asembi photo ya Qassem Soleimani, ya force d'élite Quds, na Téhéran, Iran, janvier 3 2020.
Moko na batelemeli asembi photo ya Qassem Soleimani, ya force d'élite Quds, na Téhéran, Iran, janvier 3 2020.

Vladimir Poutine président ya Russie na Emmanuel Macron ya France balobi bazali kobanga matata makoma makasi nsima na bobomami ya Qassem Soleimani, général iranien oyo apesaka maboko na ba miliciens irakiens, na mapinga ya USA.

Paris esengi Iran koboya crise ya makasi ya prolifération nucléaire (bokoli ya bibundeli ya nucléaire).

"France esengi Etats-Unis mpe Iran kokanga motema mpe Iran koboya kozwa mikano mikoki kobebisa makasi kimya na etuka ya Moyen-Orient to mpe mikano miye mikoki ko aggraver prolifération nucléaire," elobi ministre ya mambi ya Bapaya ya France, Jean-Yves Le Drian na liyebisi.

Yambo na yango MM. Poutine mpe Macron basololaki na téléphone mpe balobaki bazali kobanga matata makasi maya na Moyen-Orient.

Bakonzi babale baye (Macron na Poutine) babangi ete koswana eya makasi nsima na liwa ya général iranien na Bagdad, engumba mokonzi ya Irak.

Washington eza kotinda pene na 3.500 soda misusu na Moyen-Orient

Nzokande, Etats-Unis ezwi mokano ya kotinda pene na basoda 3.500 basusu na Moyen-Orient mpo na kopesa maboko bisika ba Américains bazali na Irak nsima na bobomami ya général iranien Qassem Soleimani na attaque américaine vendredi na Bagdad, eyebisi moko na bayi Pentagone.

Basoda ya Amerika bazali ya force ya réaction rapide ya 82e division aérportée baye batiyami na alerte nsima na attaque ya Ambassade ya Etats-Unis na Bagdad, elobi moto moye na kobomba nkombo.

XS
SM
MD
LG