Bato zomi na mitano bakangamaki mpo na eyoma na Capitole o’mwa misato, bakosambisama.
Directeur général ya OVD, Benjamin Wenga, na ya SOCOC Modeste Makabuza, bakangamka mpo na kopengwisa misolo mya misala ya mikolo nkama ya président Félix Tshisekedi, babimi boloko.
President elect Joe Biden ayanoli na bapanzi sango ete soki parlement ekolongola Donald Trump yambo na milulu mya bolapi ndayi etali kaka yango. M. Biden akolapa ndayi le 20 janvier mpo na akota na bokonzi, etikali mikolo 12.
Cardinal Fridolin Ambongo asengi na mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi kotala likambo lya nzela ya Kimweza, na Mont Ngafula na Kinshasa. Nzela ekata mpe libulu lizali kokoka kokola mpe kolya ndako na esika eye.
Président Denis Sassou andimami na lisanga na ye PCT (Parti congolais du travail) kopesa nkombo na maponami ma mokonzi ya mboka ma 21 mars 2021.
Donald Trump alobi akozala te na milulu mya bolapi ndayi ya Joe Biden mpo akitana na ye na bokonzi.
+Trump apameli eyoma na Capitole mpe Biden alobi ye nde atindaki bato +Pelosi alobi esengeli Trump alongwa +Congo-B. ekobanda kopesa mangwele ma COVID-19 na suka ya trimestre mpe OMS elobi ekopesama na bikolo bya bobola kati na janvier na février +Bobi Wine alobi CPI elandela Museveni
Alanga nzembo ayebana na nkombo ya Bobi Wine, Robert Kyagulanyi oyo azali kowelela bokonzi ya mboka na président Yoweri Museveni na maponami ma le 14 janvier, alobi asengi CPI kolandela mokonzi ya Ouganda na liwa ya basungi baye.
+Congrès endimi elonga ya Biden nsima na eyoma ya balandi ya Trump +Bakonzi ya kala ya USA mpe bakambi ba bikolo bapameli Trump mpo na eyoma ya balandi ba ye +Ba démocrates balongi mpe lisusu Sénat ya USA +Eyoma na Dakar mpo na couvre-feu ya COVID-19
Nsima na ba experts ya ONU kondima ete basoda ya Rwanda basalaka bitumba na RDC, député Juvenal Munubo asengi ministre ya Défense koyanola na Parlement. "Na Bozindo" eyambaki M. Munubo mpe ayanolaki na mituna lokola makoki ma session extraordinaire ebengisami na Bureau d’âge mpe misusu.
Bakeli mibeko baike bapameli Coup d’Etat ya balandi ba président Donald Trump baye bakotaki na Capitole (ndako ya Congrès) mpe masasi mabetamaki na milulu mya bondimi elonga ya démocrate Joe Biden. M. Trump asengi mobulu mosila ata aboyi kondima elonga ya M. Biden.
Mokonzi ya France Emmanuel Macron na mokokani wa ye ya RDC, Félix Tshisekedi, basololi na nzela ya singa mpo na likita One Planet likobanda mposo mokoya.
Lambert Mende, moko na Bayi FCC, asololi mardi na a Palais de la nation na président Félix Tshisekedi mpo etali Union sacrée, majorité ya sika mokonzi mboka azali kokela.
+Bondongwani mpo na makoki ma Bureau d’âge ya Ass. Nat. kosalisa contrôle parlementaire mpo na kokweyisa PM +Sassou asengi bomoko mpe bondeko na 2021 +ba candidats 10 basengi bobwakisami ya elonga ya Touadera na RCA +Pence na Congrès mpo na kondimama ya maponami
Chine elongeli nyongo ya RDC ya pene 29 millions ya ba dollars mpe elaki lisungi mingi, elobi ministre ya mambi ma Bikolo bya bapaya ya Chine, Wang Yi na bokutani na président Félix Tshisekedi na Kinshasa.
Président Denis Sassou N’Guesso asengi bana mboka kobika na bondeko, bomoko mpe kimya mpo na kotanga ekolo na mobu ya sika. Ezalaki botombeli na ba « corps constitués ». TOTALA bililingi ya Présidence Congo Brazzaville.
Dr Denis Mukwege, prix Nobel ya Kimya 2018, alobi ete azali na elikya ete bikolo bisusu bikolanda ndakisa ya bokangami bwa Roger Lumbala na Paris mpo na kolandela baye batangama na rapport Mapping ya ONU.
Mokeli mibeko Juvenal Munubo atiki na Bureau ya Assemblée nationale motuna to question orale mpo na ministre ya Bobateli ekolo na ntina ya bozali ya basoda ya Rwanda na mabele ma RDC.
+ONU elobi bokangami bwa Roger Lumbala ekopesa elikya na victimes +Commission Défense et Sécurité ya Assemblée esengi bolukiluki mpo makama ma ba hélicoptères ya FARDC +Ba experts ya ONU bapameli Kinshasa na Kigali na kozanga koyebisa bango misala mampinga ma Rwanda mazali kosala na RDC
Président Félix Tshisekedi afungoli Eteyelo ya Bitumba ya Kinshasa (Ecole de guerre de Kinshasa, EGK) mpe afungoli bobandi ya mobu na yango y aya yambo.
Voir plus