Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Trump aboyi kozala na bolapi ndayi ya Biden


Donald Trump
Donald Trump

Donald Trump alobi akozala te na milulu mya bolapi ndayi ya Joe Biden mpo akitana na ye na bokonzi.

Mokonzi ya Etats-Unis akomi yango na compte Twitter na ye ezongeli kosala nsima etumbu ya ngonga zomi na mibale Twitter epesaki ye.

"Na ba oyo nyonso bazali kotuna, nakozala te na milulu mya bovandisami le 20 janvier," ekomi M. Trump na Twitter.

Donald Trump apamelaki jeudi na butu eyoma esalamaki na Congrès mpe alobaki bato basalaki yango balakisi te elongi ya Etats-Unis to ya ye.

Joe Biden na ngambo na ye apamelaki Donald Trump na kotinda bato bamekaki kopekisa Congrès kondima bilembo ya maponami.

Kolanda bilembo byango M. alongi na baponi banene 306 mpe M. Trump azwi 232.

Nancy Pelosi motambwisi ya ndako ya bakeli mibeko ya Etats-Unis alobi esengeli kolongola président Donald Trump na lombango, nsima na eyoma balandi ba ye basalaki na Congrès.

Asengi na Vice-président ya Trump Mike Pence kosalela 25e ammendement ya Buku Likonzi mpo na kolaba été mokonzi ya mboka abongi te ebonga.

XS
SM
MD
LG