Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bato 15 bakosamba mpo na eyoma na Capitole


Congress Protest
Congress Protest

Bato zomi na mitano bakangamaki mpo na eyoma na Capitole o’mwa misato, bakosambisama.

Moko na bango azwamaki na bombe, mosusu akendaki kovanda na mesa ya Nacy Pelosi mpe mosusu azalaki na milangi mipelisamaka moto.

Sango yango epesami na Ken Kohl, ya bureau ya procureur fédéral ya Washington.

Bafundaki mpo kokota na Congrès na bozangi ndingisa kasi te mpo botomboki to kotinda bato na mobulu lokola president elect Joe Biden na bato basusu bazali kosenga yango.

Bato mpe mbeba misusu ezali kolukama.

XS
SM
MD
LG