Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Moto moko azwi masasi mpe ba démocrates bapameli Coup d’Etat ya balandi ya Trump


Eyoma ya balandi ya Donald Trump na Capitol, na Congrès, na Washington, 6 janvier 2021.
Eyoma ya balandi ya Donald Trump na Capitol, na Congrès, na Washington, 6 janvier 2021.

Bakeli mibeko baike bapameli Coup d’Etat ya balandi ba président Donald Trump baye bakotaki na Capitole (ndako ya Congrès) mpe masasi mabetamaki na milulu mya bondimi elonga ya démocrate Joe Biden. M. Trump asengi mobulu mosila ata aboyi kondima elonga ya M. Biden.

"Nayabi bozali na pasi mpe na mawa. Maponami mayibamaki. Kasi bokoki kozonga ndako. Ezalaki mbeba na maponami mpe bayi ngomba mosusu bayebi yango. Kasi sika, bosengeli kozonga nsako. Esengeli tozala na kimya, tosengeli kozala na alima, kotosa baye batika alima. Tolingi moto moko te ayoka mpasi, elobi M. Trump na maloba alobi na Twitter.

Ngambo, M. Biden asengali Trump kobatela ekolo mpe kozongisa kimya kolanda Buku likonzi.

"Nazali kobanga eloko mpo na bokengi na nga na mokolo ya kolapa ndayi. Sikoyo, makambo maye malenkisi," elobaki M. Biden na lisikulu asali na tv.

Balandi ba M. Trump bakotaki na Capitol, na Congrès, mpe basalaki eyoma. Milulu mya kondima elonga ya maponami ma mokonzi ya mboka na baponi banene mikatamaki.

Milulu myango mikatamaki mpe bakeli mibeko babimisamaki na lombango.

Masasi mabetamaki.

Moto yango azwi masasi kati ya Capitole epayi wapi balandi ba Trump bakotaki mpo kopekisa bondimi bwa elonga ya Biden.

Policier moko alabi ezali mwasi moko nde azwi masasi yango, kolanda CNN.

M. Trump, républicain, asengaki balandi baye kotambola na mobulu te. Alobaki yango na mitingi asalaki na milulu mya kondima molongi ya maponami mizalai kosalama.

M. Biden asengi, na ngambo na ye, ete M. Trump aleka na tv mpo na kopekisa balandi baye.

XS
SM
MD
LG