Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mokeli mibeku Munubo asengi ministre ya Bobateli kolimbola mpo na basoda ya Rwanda na RDC

Bakambi ya mampinga ya RDC (FARDC), Rwanda (RDF), Ouganda (UPDF) mpe ya Burundi (NDF) bazali kobongisa bosangisi makasi na bango mpo na bitumba na basimba minduki na monyele ya RDC, na Goma, Nord-Kivu, 24 octobre 2019. (VOA/Charly Kasereka)

Mokeli mibeko Juvenal Munubo atiki na Bureau ya Assemblée nationale motuna to question orale mpo na ministre ya Bobateli ekolo na ntina ya bozali ya basoda ya Rwanda na mabele ma RDC.

M. Munubo ya UNC atiki mokanda yango na Bureau d’âge mpo na yango.

Motuna ya mokeli mibeko oyo ekweyi nsima na ba experts ba ONU kotuna mpo na nini bakambi ya Rwanda na RDC balobaki te ete ba soda ba RDF (Rwanda Defense Force), mampinga ma Rwanda, bazali na mabele ma Congo wuto 2019.

Kolanda rapport ya ONU, basoda ba Rwanda basalaki misala mingi na mabele ma Congo lokola bilili bilakisi yango.

Na octobre, RDF esalaki mosola mosusu na basoda koleka 28 mpe minduki ya minene, elobaki ba experts ba ONU balandelaka embargo ya minduki.

RDC ezali te na embargo to bopekisi ya kosamba minduki kasi ba experts baye balandela makambo mpo na kopekisa mboka misusu na nse ya bopekisami lokola Centrafrique.

XS
SM
MD
LG