Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Chine elongoli nyongo ya 28 millions $ ya RDC mpe elaki 17 millions $ na lisungi na bokambi UA


Président Félix Tshisekedi na masolo na ministre ya Chine ya mambi ya Bapaya Wang Yi na Palais de nation, Kinshasa, 6 janvier 2021. (Twitter/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi na masolo na ministre ya Chine ya mambi ya Bapaya Wang Yi na Palais de nation, Kinshasa, 6 janvier 2021. (Twitter/Présidence RDC)

Chine elongeli nyongo ya RDC ya pene 29 millions ya ba dollars mpe elaki lisungi mingi, elobi ministre ya mambi ma Bikolo bya bapaya ya Chine, Wang Yi na bokutani na président Félix Tshisekedi na Kinshasa.

Président Tshisekedi ayambaki ministre Yi na Palais de la nation na Kinshasa nsima na bokutani na ye motindami ya Chine na mokokani wa ye ya RDC, Marie Ntumba Nzeza.

"Diplomatie chinois esakoli... mpe lisungi likokma na 17 millions USd mpo na mabongisi ya ntombwa mpe 2 millions mpo na kotambola na bokambi ya Union Africaine (ya président Tshisekedi)," elobi présidence ya RDC.

Président Tshisekedi akozwa mobu moye bokambi bwa UA.

Ministre Yi na orésident Tshisekedi basololaki mpe mpo etali bitumba na COVID-19 mpe bokundolami ya Comission mixte Chine-RDC.

XS
SM
MD
LG