Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba Bareas bakweyisi ba Leopards na 8e de finales


Defenseur ya ba Leopards Glody Ngonda (G) aweleli balle na mosani ya ba Bareas ya Madagascar na 8e de finales ya CAN 2019 na Alexandrie, Egypte, 7 juillet 2019.
Defenseur ya ba Leopards Glody Ngonda (G) aweleli balle na mosani ya ba Bareas ya Madagascar na 8e de finales ya CAN 2019 na Alexandrie, Egypte, 7 juillet 2019.

Equipe nationale ya Madagascar esukisi oyo ya RDC na 8e de finales ya CAN 2019 nsima ya ba tirs au but na stade ya Alexandrie na Egypte, 4-2.

4-2, ba Leopards ya RDC ba zangaki kotiya tirs au but mbala mibale. Tisserand moto ya liboso mpe Bolasie na 4e tir au but.

Ba Barea ba tiyaki ba tirs na bango minei manso.

Match esukaki na 2-2. Ba Bareas nde babandaki kofungola mongete na 9’ na Amada L.

Bakambu C. azangisaki na 21’ mpo na ba Leopards.

Andrianarimanana A. abakisaki mpo na Madagascar na 77’.

Mpe Mbemba Ch. azongisaki ba equipes babale na bokokani na 90’.

Na ba prolongations, ba Congolais bokokati te kotiya mongete ata babetaki mwa malamu koleka.

RDC elongwe. Madascar ekukutana na ¼ de finales na molongi ya mach Ghana-Tunisie ya lundi.

XS
SM
MD
LG