Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Pasteur azuwamaki na Ebola na Goma akufi


Basali ya bokolongono bazali kopesa lisalisi na bakoni ya Ebola na Beni, Nord-Kivu, 1 avril 2019.
Basali ya bokolongono bazali kopesa lisalisi na bakoni ya Ebola na Beni, Nord-Kivu, 1 avril 2019.

Moto ya yambo moye azuwami na Ebola na Goma o’mokolo ya eyenga akufi na nzela ya bomemami na ye na Butembo, kolanda bakambi ya misala ya bokolongono.

"Nayebisi bino ete mokoni wana akufi na nzela ya Butembo, " asakoli mokambi ya etuka ya Nord-Kivu, Carly Nzanzu.

Moto azalaki Pasteur ya etonga moko na Sud-Kivu, akendeki na bokutani (convention) ya Butembo, esika wapi asambelaki mpe atiyelaki maboko na babeli o’mokolo yay a minei moleki.

Amonisaki bilembo ya Ebola na nzela ya bozongi na ye, na Goma, esika wapi alukaki lisungi nsima na moto mpasi mpe fevele.

Bomonani ya mobeli moye ya yambo na Goma bomemaki bobangi na engumba eye mpe bisika mingi.

OMS, Misala ya molongo ya bokolongono, elobi ete yango ezali kokebisa bato banso.

"Ezali bokebisi pamba te ntango nyonso mokoni alongwe esika moko akoki komema bokono bisika akeyi, " elobaki lobi loleki, mokambi ya makambo ya makama ya OMS, Mike Ryan.

XS
SM
MD
LG