Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Rwanda ekebisi bato kosala mobembo na RDC mpo na Ebola na Goma


Mosalani na bokolongono azali komeka moto ya nzoto ya moto moko na Goma, Kivu, 15 juillet 2015.
Mosalani na bokolongono azali komeka moto ya nzoto ya moto moko na Goma, Kivu, 15 juillet 2015.

Ministère ya Rwanda ya bokolongono ekebisi baye ya mboka na yango mpo na kokatisa o’ngambo ya Congo démocartique nsima na moto moko komonisama na bokono ya Ebola na Goma, engumba mokonzi ya Nord-Kivu.

"Ministère ya santé ezali kokebisa bana mboka Rwanda mpe bavandi na mboka eye kokatisa mpamba mpamba ndelo mpe kosala mobembo na bisika ya nzinga nzinga na ekolo bipayi wapi Ebola emonani," elobi liyebisi.

"Tokebisi mpe bana mboka mpe bavandi mpo na kopesa bisika ya kovanda na bapaya baye bazali kowuta na bisika nzinga nzinga epayi Ebola emonisama, " ebakisi liyebisi.

Ministre ya santé, Diane Gashumba, akendaki kotala mboka ya ouest ya Rwanda na ndelo na RDC. Alobi ete bulamatari "ekokanga te ndelo na yango " kasi ekokengela makasi baye bazali kokota mpe kobima na Congo démocratique.

Moto moke te azuwami naino na Ebola na Rwanda.

O’mokolo ya eyenga, moteyi moko amonanaki na Ebola na Goma, engumba ya bato 600.000, nsima na kobondela mpe kotandela maboko likolo na babeli na Butembo epayi wapi akendaki kosala mosala ya Nzambe.

Pasteur yango awutaki. Azuwaki nkwokoso mpe alukaki lisungi na Goma.

Bakonzi etuka ya Nord-Kivu bazongisi ye na Butembo mpo ete asalisama na ba centres de traitement, epayi wapi Ebola ezali kongala.

Kolanda ministère ya santé ya RDC bokolongono boye bosili koboma bato 1.665 kozuwa bato 2.350 banda sanza ya mwambe ya 2018.

XS
SM
MD
LG