Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Maponami ya mokambi ya Sankuru lobi le 10 juillet


Lambert Mende mokambi ya CCU-A (Convention des Congolais unis et alliés) mpe candidat ya maponami ya ebonga ya mokambi ya etuka ya Sankuru, awa na Kinshasa, 13 avril 2015
Lambert Mende mokambi ya CCU-A (Convention des Congolais unis et alliés) mpe candidat ya maponami ya ebonga ya mokambi ya etuka ya Sankuru, awa na Kinshasa, 13 avril 2015

Maponami ya mokambi ya etuka ya Sankuru makosalama lobi le 10 juillet, eyebisi CENI, Commission électorale nationale indépendante.

Rapporteur to molebeli na misala miye ya maponami, Jean-Pierre Kalamba, alobi ete linaka liye likotosama ata nungu nungu ezali na ngambo ya lisanga ya Lambert Mende, moko ya ba candidats babale bazali kowela ebonga eye.

Campagne électorale esilaki kobanda o’mokolo ya lundi.

CCU-A (Convention des Congolais unis et alliés), lisanga ya M. Mende, ekeyi na Cour cosntitutionnelle.

Ezali kofunda bozongisi ya candidature ya Joseph Mukumadi na CENI, ntango Cour d’appel ya Lusambo elongalaki ye na koloba été azali mwana ya Congo démocratique te.

XS
SM
MD
LG