Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

UE epameli Mende mpo na bozangi maponami na Sankuru


Lambert Mende na studios ya VOA, Washington, le 31 janvier 2018
Lambert Mende na studios ya VOA, Washington, le 31 janvier 2018

Molakisi elongi ya Union européenne na Congo démocratique, Guillaume Chartrain, apamela polele molebeli ya kala ya bulamatari na bokonzi ya mokambi ya ekolo ya kala Joseph Kabila, Lambert Mende, mpo na kotelemela démocratia.

Mpo na M. Chartrain, etumbu ya UE ezali bongo na ntina likolo ya M. Mende.

"Maponami masalami lisusu te na Sankuru. Lambert Mende atiye epekiselo mpe alakisi ntina nini etumbu ya Union européenne epesamelaki ye," ekomi M. Chartrain, mopesi toli wa yambo na limpinga ya UE, na compte Twitter na ye.

"Tozali kolandela mikano nini mikolanda boboyi ya mbala oyo lisusu ya démocratia na mboka eye, " ebakisi M. Chartrain.

M. Mende azali candidat mpo na kokamba etuka ya Sankuru.

Ba députés baponi lisusu te, maponami matindikami na le 20 juillet.

Sankuru etikali nsima ya bituka binso 26 ya RDC mpo na kopona mokambi na yango.

M. Mende akendaki na Cour constitutionnelle mpo na kotelemela bozongisi ya candidature ya momekani wa ye, Joseph-Stéphane Mukumadi.

Candidature ya M. Mukumadi eboyamaki yambo kasi Conseil d’Etat ezongisa yango.

XS
SM
MD
LG