Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Matungulu alimboli boponami na ye mpo na kokamba BAD


Freddy Matungulu, moko na bakambi ya Lamuka, na Géneve, Suisse, 11 novembre 2018.
Freddy Matungulu, moko na bakambi ya Lamuka, na Géneve, Suisse, 11 novembre 2018.

Prof. Freddy Matungulu Ilankir andimi na motuna ya VOA Lingala ete bulamatari ya Congo démocratique epesi nkombo na ye mpo na kozala mokambi ya BAD (Banque africaine de développement).

Kasi M. Matungulu, moko na bakambi ya longomba Lamuka, alimboli ete yango ezali nzela makambo maselaka yambo andimama na misala lokola BAD.

"Ezali solo ete mandat ya Cameroun esili. RDC nde ekozuwa libonga liye na nsima. Mpe baninga bakanisaki ete nakoki kosala eloko moko kuna," elobi M. Matungulu na lisolo na VOA Lingala.

"Esengeli yambo ete bopesi nkombo yango bondimama na mboka ngai nawuta. Tolikya ete BAD ekondima mpe na kokota bongo na Conseil (d’administration)," eyebisi M. Matungulu.

Ebonga yango ekozala mpo na mibu misato.

"Nasololaki yango na baninga na ngai ya Lamuka. Na Conseil d’administration (ya BAD), nakozala na ndelo mingi. Nakokoka kosala mosala ya politiki te. Ekosengela nabendana pembeni. Yango elingi koloba ete nakoka kotambwisa Lamuka te mpo na mandat ezali koya," elimboli M. Matungulu.

Mokambi ya lisanga Congo na biso, M. Matungulu esengelaki atambwisa Lamuka mpo na sanza misatu nsima na Moïse Katumba oyo mandat na nani ekosila na nsanza ya mwambe mokoya.

Bakambi ya Lamuka esengeli bakuna le 20 juillet na Lubumbashi.

XS
SM
MD
LG