Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi na Lourenço bakosunga Rwanda na Ouganda na koyokana


(G ti D) Ba présidents Yoweri Museveni ya Ouganda, Joao Lourenço ya Angola, Paul Kagame ya Rwanda mpe Felix Tshisekedi ya RDC, na bokutani na Luanda, Angola, 12 juillet 2019. (Présidence ya RDC)
(G ti D) Ba présidents Yoweri Museveni ya Ouganda, Joao Lourenço ya Angola, Paul Kagame ya Rwanda mpe Felix Tshisekedi ya RDC, na bokutani na Luanda, Angola, 12 juillet 2019. (Présidence ya RDC)

Président Félix Tshisekedi na bakokani na ye Paul Kagame ya Rwanda, Yoweri Museveni ya Ouganda mpe Joao Lourenço ya Angola, basolalki o’mokolo mwa mitano na Luanda mpo na kimya mpe makambo misusu etali etando ya Afrikaya kati kati.

Na liyebisi babisimi na suka ya bokutani na bango, bakonzi banei baye bapesi losako na bolingi ya bakonzi ya Ouganda mpe ya Rwanda mpo na kokoba kosolalo na ntina ya kopesa eyano na mikakatano kati na mboka na bango mibale.

Mpo na yango, bokutani (liye) bosengi na Angola, na lisungi ya Congo démocratique, na kosala ete makambo mango masalamu malamu, ekomi bakonzi baye na liyebisi ya suka ya bokutani boye.

Bakoknzi baye bapesi Congo démocratique makasi mpo na kokoba bitumba na bokono ya Ebola boye bozali kongala banda sanza ya mwambe ya 2018 mpe bobomi bato koleka 1.600.

Bapesi losako na bokutani ya 12e sommet extraordinaire ya bakambi ya bikolo ya Union africaine, bosalemaki na Niamey, Niger, mpe bozalaki kaka mpo na bobandi ya misala ya Zone ya Libre-échange (etando ya kosombitinia na bonsomi) na continent ya Afrika.

XS
SM
MD
LG