Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Zuzi Kaluba aponami mokambi ya Cour constitutionnelle


Zuzi Dieudonné Kaluba Dibwa mokambi ya sika ya Cour constitutionnelle, Kinshasa, RDC, 20 avril 2021. (Twitter/Cour constitutionnelle RDC)
Zuzi Dieudonné Kaluba Dibwa mokambi ya sika ya Cour constitutionnelle, Kinshasa, RDC, 20 avril 2021. (Twitter/Cour constitutionnelle RDC)

Zuzi Dieudonné Kaluba Dibwa aponami mokambi ya Cour constitutionnelle ya Ekolo Congo démocratique.

Aponami na bazuzi basusu ba Cour constituionnelle.

Molakisi na Université ya Kinshasa, zuzi Kaluba azali avocat na Cour ya Cassation mpe ya Cour pénale internationale.

Botiami bwa ye na mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi elongo na baninga ba ye basusu babale bo' moko na bazuzi ba Cour constitutionnelle na juillet 2020, bobendaki nungu nungu mingi.

Zuzi Kalubi akokitana na Bénoit Lwamba oyo atikaki mosala na juillet 2020 mpe alandamaki na Evariste Mwata Funga mpo na mwa ntango.

Matata mabimaki nsima na basambeli na zuzi Lwamba kowangana botiki mosala ya client na bango mpe nsima na bazuzi babale ba Cour constitutionnelle koboya kotindama na Cour ya cassation.

Zuzi Kaluba azalaki na bosambisami ya Vital Kamerhe mpo na bobengwisi misolo mya l’Etat.

XS
SM
MD
LG