Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

MLC eza komilengele mpo na kofunda lolenge CACH na FCC bazali kobunda mpo na kotia bazuzi bakosalela bango


Jean-Pierre Bemba, mokambi ya MLC na kalaka moknzi ya lingomba yango Eve Bazaiba, na libanda lya mpepo ya N’Djili, Kinshasa, 1 août 2018.
Jean-Pierre Bemba, mokambi ya MLC na kalaka moknzi ya lingomba yango Eve Bazaiba, na libanda lya mpepo ya N’Djili, Kinshasa, 1 août 2018.

MLC (Mouvement ya liberation ya Congo) ya Jean-Pierre Bemba eyebisi ete ezali kosangisa makambo manso masengeli mpo kofunda lolenge lisanga ya mangomba ma boyokani mpo na kokamba mboka (CACH-FCC) bazali koluka kotia maboko likolo na misala mya bosembo mpe ya ba buzuzi.

MLC ebengi yango "bitumba ya nsoni", na liyebisi kalaka mokonzi na yango, Eve Bazaiba atie manzaka.

"MLC efungoli masolo matali mambi mabosembo na ntina ya koluka koyeba nini ekoki kozala mbeba likolo na mibeko na ntina ya kopekisa ete ezaleli yango ezongela lisusu te," eyebisi ekomi Mme Bazaiba.

MLC etomboki nsima na koyoka na ba réseaux sociaux mongongo ya Lambert Mende ya CCU, moko na bakambi ba masanga mazali kati FCC (Front commun pour le Congo) ya mokonzi ya kala Joseph Kabila, kobimisa na polele ete bokonzi ya bazuzi mpe Cour constitutionnnelle ekonzamaka nab aye bazali kowela yango na lisanga lya baongo ya boyokani CACH-FCC.

Na audio yango, M. Mende azalaki kopamela moko na basungi baye mpo batia manzaka na mokanda ya kofunda bazuzi mitano bazalaki kosalela mokonzi ya kala Joseph Kabila.

Mpo na M. Mende, bofundami wana bozali kopesa nzela ete CACH elongola bango mpe etia bazuzi na yango mpe ekoka kosimba misala manso mya bazuzi na maboko ntango FCC ekozanga yango.

M. Mende azalaki koloba ete mokonzi ya FCC, Joseph Kabila, agangelaki mpo na yango.

"Ezaleli eye ezali kolakisa ete Cour constitutionnelle ezalaka eloko mabota mabale ma politiki wana mazali na bokonzi masalelaka," epaleli Mme Bazaiba.

Bazali komeka kosala bitumba na nsoni mpo na komitia na kati ya Haute cour eye esengeli kozala mobateli ma maye ma motuya mpo na mboka, elobi Eve Bazaiba.

MLC ekundoli ete maponami manso masato maslamaka na mbeba na RDC mazalaki mbano ya lolenge bayi politiki bamemaki yango.

Na yango, bazuzi ya (cour) constitutionnelle ya Congo bazalaka na bonsomi te kasi bamimonisaka na mikano mitindami ba baye bazali na bokonzi, epameli Eve Bazaiba.

M. Mende alongali na lisanga na ye CCU baye basalaki likambo lyango.

XS
SM
MD
LG