Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bayi bokengi babuki bureau ya président ya Cour constitutionnelle


Président ya Vour constitutionnelle Benoït Lwamba Bintu na Kinshasa, 19 janvier 2019.
Président ya Vour constitutionnelle Benoït Lwamba Bintu na Kinshasa, 19 janvier 2019.

Bayi misala bokengi babukaki ndako ya mosala ya président ya Cour constitutionnelle mpe basalaki boluki lobi mokolo mwa eyenga, elobi na liyebisi mosambeli ya zuzi mokonzi oyo.

Mosambeli ya Benoit Lwamba Bintu akomi na liyebisi ete bolukiluki boye bosalami na kobuka mibeko.

Mposo moleki mokanda moko motambolaki na ba réseaux sociaux koloba ete Benoit Lwamba Bintu atiki mosala mpe mokanda mosusu molakisaki nsima na yango ete baninga baye ya mosala bandimaki bokitiki mosala mwango.0

Mokambi ya ndeko ya mosala ya Benoit Lwamba Bintu awanganaki mokanda yango mpe akomaki ete Benoit Lwamba atiki mosala te mpe azali na poto mpo na lisali ya nzoto.

XS
SM
MD
LG