Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakeli mibeko 338 balaki kotikala nsima na Kabila na Kingakati


Joseph Kabila, mokonzi ya FCC (Front commun pour le Congo) mpe mokonzi ya mboka ya kala na bokutani na bakeli mibeko na Kingakati, Kinshasa, 29 octobre 2020.
Joseph Kabila, mokonzi ya FCC (Front commun pour le Congo) mpe mokonzi ya mboka ya kala na bokutani na bakeli mibeko na Kingakati, Kinshasa, 29 octobre 2020.

Ba députés 338 balobi ete bazali nsima na M. Kabila mpe "balapi ndayi mpe sembo" na Kabila mpe na FCC, elobi bayi FCC bazalaki na likita lyango.

Bakeli mibeko 338 balaki kotikala nsima na Joseph Kabila, mokonzi ya FCC (Front commun pour le Congo) mpe mokonzi ya kala ya RDC, na likita basali jeudi na Kingati.

Bakutanaki na Joseph Kabila na msaolo pene na mposo moko nsima na lisikulu lya président Félix Tshisekedi kosakola kobanda koyoka bato mpo na matata mazali na mboka.

Bakeli mibeko 338 balaki kotikala nsima na Kabila na Kingakati [TOTALA]
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:02:05 0:00

Ba députés 338 balobi ete bazali nsima na M. Kabila mpe "balapi ndayi mpe sembo" na Kabila mpe na FCC, elobi bayi FCC bazalaki na likita lyango.

Président Tshisekedi asakolaki le 23 octobre ete boyokani ya bokambi mboka kati na FCC ya M. Kabila na CACH (ya M. Tshisekedi) bopesi nzela te na kokokisa elikya ya bana mboka.

M. Tshisekedi alaki kobanda mposo moye koyoka bato na ntina ya kokela libotke ya malamu ("union sacrée") liye likomema makasi masika mpo kotombola ekolo.

Matata mazali kati na CACH na FCC, mingi mpenza nsima na botiami mpe bolapi ndayi ya bazuzi basato ya Cour constitutionnelle na président Tshisekedi.

FCC ezali kosenga mokonzi ya mboka kozonga nsima mpo abukaki Buku likonzi kasi M. Tshisekedi na CACH balobi manso masalaki na alima.

Bayi FCC baye baleki mingi na ba instutitions bazalaki te na milulu myango mpe balobi makambo bazuzi baye bakosala matali bango te.

FCC ekokota na likindo lya mposo moko wuto mposo mokoya. Mpe ekopesa eyano na maloba ma président Tshisekedi nsima na yango.

Mposo nde koyoka bato nde esengelaki kobanda mpe président Tshisekedi alakaki kozongela bana mboka nsima na mposo moko mpo na koyebisa bango nini akati nsima na misala manso.

XS
SM
MD
LG