Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi na Kagame basololi mpo etali bondimami ya RDC na CAE na Gisenyi


Président Paul Kagame (G) ya Rwanda na mokokani wa ye ya RDC Félix Tshisekedi (D) bazali kotala bisika biike volcan Nyiragongo esalaki mbeba na Rubavu, na Rwanda, 25 juin 2021. (Twitter/Présidence Rwanda)
Président Paul Kagame (G) ya Rwanda na mokokani wa ye ya RDC Félix Tshisekedi (D) bazali kotala bisika biike volcan Nyiragongo esalaki mbeba na Rubavu, na Rwanda, 25 juin 2021. (Twitter/Présidence Rwanda)

Président Félix Tshisekedi na mokokani waye ya Rwanda Paul Kagame basololi na Gisenyi, na Rwanda, epayi wapi mokonzi ya Ekolo Congo décmocratique akatisaki mwa ngonga eleki.

Masolo ma bango masalaki pene na ngonga mibale mpe matalaki bondimami ya RDC na Lisanga lya bikolo bya Afrika ya est to Communauté ya Afrika ya Est (EAC to CAE).

CAE etindi misala mikotala soki Ekolo congo démocratique ekoki kondima na lisanga liye. Misala myano mikosala mikolo zomi. Rwanda nde ezali komema nkombo ya RDC,

MM. Tshisekedi na Kagame basololaki mpe mpo na koyikisa makasi misala mya mombongo kati na bikolo mibale mpe bazali kobongisa lolenge ya sika ya kosala yango.

Bakotia manzaka na mikanda miike.

Bakonzi babale bakendaki mpe kotala bisika potopoto ya moto ya volcan Nyiragongo elekaki mpe lokola na ngambo ya Rwanda le 22 mai.

O'mokolo mwa mpsoso nde ekozala ngala ya président Paul Kagame kokita na Goma, na Nord-Kivu epayi wapi président azali kovanda wuta pene na mposo mibale.

Nzokande bayike na babundi ba makoki mabomoto bapameli bokutani bo ye. Moko na bayi "Association de défense des consommateurs lésés", Joel Lamika alobi ezali kofinga milimo ya bayi RDC mpo kala mingi te M. Kagame awutaki kowanga ete mampinga ma Rwanda masala ata mbeba moke te na RDC mpe afingaki misala mya "rapport mapping".

Burundi, Kenya, Ouganda, Sounda ya Sud, Tanzanie mpe Rwanda bazalaka na lisanga lyango.

XS
SM
MD
LG