Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Likita lya Paris : FMI epesi 1,5 milliards $ na RDC yambo na misolo G20 ekoki kobakisa


Kristalina Georgieva (G), mokambi ya Fonds Monétaire International ( FMI) apesani mbote na président ya RDC Félix Tshisekedi na Paris, France, 17 mai 2021. (Twitter/Présidence RDC)
Kristalina Georgieva (G), mokambi ya Fonds Monétaire International ( FMI) apesani mbote na président ya RDC Félix Tshisekedi na Paris, France, 17 mai 2021. (Twitter/Présidence RDC)

Mokambi ya FMI (Fonds monétaire international), Kristinalina Georgieva alaki kopesa na RDC 1,5 milliards $ yambo na misolo G20, lingomba lya bikolo tuku mibale ya nkita mingi koleka na mokili, ekoki kobakisa. Akutanaki na Paris na président Félix Tshisekedi libanda lya likita na lisungi lya France.

Bakonzi babikolo biike bya Afrika bazali na likita na makonzi ya France Emmanuel Macron, mpe bapesi misolo na molongo, na Paris, mpo oyo etali lisungi likoki kopesama na bayi Afrika kolanda nkwokoso ya bokono bwa COVID-19.

Président Félix Tshisekedi oyo azali kuna mpe bo' mokambi ya Union africaine akutani na Mme Kristinalina Georgieva oyo alaki kobakisa kino milliards moko na ndambo ya badollars na misala mibengami Droits de Tirages Spéciaux miye mizala nanu kati na masolo na G20, lingomba lya bikolo tuku mibale ya nkita mingi koleka na mokili.

Président Tshisekedi mpe asololi na mokokani wa ye ya Rwanda Paul Kagame. Kolanda presidence ya RDC, Paul Kagame apesi losako na makanisi ma president Tshisekedi mpe alakisi bolingi na ye ya kotambola elongo na RDC na boluki kozongisa bokengi na est.

M. Macron alaki ete France ekodefisa Soudan 1,5 millirds $ mpo na efuta nyongo na yango na FMI.

Mokonzi ya France asengi bapesi misolo kokenge na Soudan nsima na bokweyisami ya mokonzi ya kala Omar El-Bechir, mobu moko moleki, na botelemeli ya bana mboka na ye.

Denis Sassou ya Congo-Brazzaville mpe azali na likita lyango.

A lire aussi

XS
SM
MD
LG