Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Volcan Nyiragongo: Tshisekedi asakoli ete compagnie moko ezobanda kozwa gaz na lac Kivu mpo na kobanga likama


Président Félix Tshisekedi na rotonde ya palais de la nation na Kinshasa, RDC, 29 mai 2021. (Twitter/Patrick Muyaya)
Président Félix Tshisekedi na rotonde ya palais de la nation na Kinshasa, RDC, 29 mai 2021. (Twitter/Patrick Muyaya)

Président Félix Tshisekedi asakoli ete copmagnie moko ekobanda kobimisa gaz na lac Kivu mpo na kopekisa likama liye likokati komema liwa lya bato mingi na Goma nsima na botomboki ya volcan Nyiragongo mposo moko moleki.

"Ezali na copmagnie moko eye mpo na kobanda kozwa gaz ya lac… Ekoki kobanda mosala mbala moko," elobi M. Tshisekedi liboso lya bapanzai sango na rotonde ya Palais de la nation na Kinshasa.

Mikolo mibale mileki, pene na bavandi 600.000 ya ba quartiers zomi ya Goma basengamaki kotiaka engumba mokonzi ya Nord-Kivu mpo na likama likokaki kosalama soki gaz ya lac Kivu epelaki moto nsima na botomboki ya volcan Nyiragongo.

Bato 1.700 bakufaki na likama lya ndenge wana na 1986 na Cameroun, ntango gaz ya lac Nyos epelaki moto.

Na liyebisi na ye, M. Tshisekedi asengi na bavandi ba Goma kozonga nanu na lombango te mpe kozela ndingisa ekopesamelama bango ntango bato ba mayele bakomona ete likama lizali lusus te.

Mokonzi ya RDC asengi mpe na bato kotika kopesa te sango ya lokuta mpo na kotambwisi mayele ma bana mboka ntango ya likama liye.

M. Tshisekedi alaki kopesaka sango mbala mingi.

Mokonzi ya RDC alobi soki mapanga ma mpepo makangamaki te mbele asiakomaki Goma.

Bavandi basusu ya Goma bakenaaki na Sake, na 27 Kms na west, to na Rutshuru na nord kaka Nord-Kivu, mpe basusu bakatisaki na Rubavu na Rwanda.

Lobi loleki, président Paul Kagame asengaki lisingu lya lombango lya molongo mpo na bayi RDC bakatisaki ngambo.

Nzokande bayi politki ya lingomba Lamuka ya ngambo ya Martin Fayulu na Adolphe Muzito bapameli bozangi bokambi malamu ya lisungi mpo na likama liye.

A lire aussi

XS
SM
MD
LG