Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Cour const. esengi dossier ya bosambisami ya Kemerhe, Jamal na Muhima


Vital Kamerhe, directeur ya cabinet ya kala ya président Félix Tshisekedi, na bosambisami na boloko ya Makala, Kinshasa, 11 mai 2020.
Vital Kamerhe, directeur ya cabinet ya kala ya président Félix Tshisekedi, na bosambisami na boloko ya Makala, Kinshasa, 11 mai 2020.

Cour Constitutionnelle esengi dossier ya bosambisami ya Vital Kamerhe, Sammih Jamal mpe Jeannot Muhima na bosengi ya ba avocats ya moko na bafundami.

Cour constitutionnelle esengi Tribunal divisionnaire ya grande instance ya Kinshasa kopesa yango dossier ya M. Kamerhe na lombango.

Nzokande tribual ya grande instance ya Kinshasa Gombe oyo ezali kosambisa M. Kamerhe, mosungi mpe mokambi ya kala ya ndako ya mosala ya président Félix Tshisekedi, M. Jamal, nkolo compagnie ya botongi Samibo mpe M. Muhima mosalai ya président mpo na mambi ya emport-export, esakolaki ete ekopesala ekateli na yango samedi le 20 juin.

Yango ememi mituna soki ekateli ekopesa to te.

Mokando mwando mokamami na Greffe to misala ya kalaka ya mya Cour constitutionnelle kolanda bosenga ya basambeli ba Vital Kamerhe baye balobi Buku likonzi etosami te.

Ministère publique esengaki etumbu tuku mibale mya misala mya makasi kasi basambeli ba M. Kamerhe balobi etumbu yango elongwa na Buku likonzi.

Bato baike batambolaki na Lubumbashi lokola mpe bisika misusu mpo na kosenga botika bwa Kamerhe.

MM. Kamerhe, Jamal na Muhima bazali kosamba mpo na bopengwisami misolo ya kotango 4.500 maisons préfabriquées mpo na mikolo nkama ya bokonzi ya Tshisekedi.

XS
SM
MD
LG