Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Cour constitutionnelle ekweyisi Kabund


Jean-Marc Kabund azali kopesa mbote na basembeli ya UDPS na Cour constitutionnelle, Kinshasa, 19 2019
Jean-Marc Kabund azali kopesa mbote na basembeli ya UDPS na Cour constitutionnelle, Kinshasa, 19 2019

Cour constitutionnelle ekwiyisi Jean-Marc Kabund na bosenga na ye ya koboya mokano mwa kolongola ye na ebonga ya 1er vice-président ya suku ya nse ya Parlement.

Cour constitutionnelle elobi eyambi bosenga ya Kabund kasi elobi yango ezali na loboko te.

Basambeli ba M. Kabund oyo azali mokambi ya UDPS (Union pour la démocratie et le progrès social) na esika ya président Félix Tshisekedi, basakoli été bakomema makambo mango na Cour ya cassation.

Nzokande pétition mosusu ya koboya M. Kabund na ebonga ya 1er vp ya Assemblée nationale esili etiami manzaka na ba députés nationaux koleka 200.

Pétition eye ya mibale ebandisami na moyi PPRD (Patri du peuple pour la reconstruction et la démocratie) ya mokonzi ya kala Joseph Kabila, Didier Manara.

Mposo moleki Conseil d’Etat etelemisaki mokano mpe linaka ya Assemblee nationale mpo na kopona moto mosusu.

Police mpe misala mya bokengi bapekisaki ba députés kokata na ndako ya mosala na mbango le 12 juin eleki. UDPS epanki Patricia Nseya mpo na ebonga yango.

XS
SM
MD
LG