Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Greffe ya TGI eyanoli ete ekoki te kotinda dossier ya Kamerhe na Cour const. na ngonga eye


Vital Kamerhe na bosambisami na ye boloko ya Makala,Kinshasa, 11 mai 2020.
Vital Kamerhe na bosambisami na ye boloko ya Makala,Kinshasa, 11 mai 2020.

Greffe to misala mya kalaka ya Tribunal ya grande instance eyanoli na Cour constitutionnelle ete ekoki te kotinda dossier ya Vital Kamerhe, Sammih Jamal mpe Jeannot Muhima na ngonga eye.

Greffier divisionnaire ya Tribunal ya grande instance ya Kinshasa-Gombe ekundoli ete ngonga 48 epesamelaki greffière mpo kosangisa mikanda ya bosambi ya ngombo inso mpe kokoma yango malamu.

Nsima na yango, elobi greffier ya TGI Kinshasa/Gombe dossier etindamai na mokambi ya chambre wuto le 13 juin.

Bazuzi ya TGI Kinshasa/Gombe baye bazali kosambisa, basili bakotaki kinzozi.

Cour Constitutionnelle esengaki dossier ya bosambisami ya Vital Kamerhe, Sammih Jamal mpe Jeannot Muhima na bosengi ya ba avocats ya Kamerhe.

Kasi TGI Kinshasa/Gombe esili esakolaki ete ekopesala ekateli na yango samedi le 20 juin.

Basambeli ya Kamerhe bakendaki na Cour constitutionnelle mpo batelemeli etumbu ya mibu tuku mibale ya misala ya makasi eye ministère ezali kosenga. Ba avocats balobi ete etumbu eye ezali te na Buku na Likonzi.

XS
SM
MD
LG