Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Cour constitutionnelle ekotala mardi botelemeli ya Kabund na bolongolami na ye


Jean-Marc Kabund azali kopesa mbote na basembeli ya UDPS na Cour constitutionnelle, Kinshasa, 19 2019
Jean-Marc Kabund azali kopesa mbote na basembeli ya UDPS na Cour constitutionnelle, Kinshasa, 19 2019

Cour constitutionnelle ekotala wuto mardi botelemeli ya Jean-Marc Kabund na bokweyisami na ye na ebonga ya 1er vice-président ya Assemblée nationale.

Mposo moleki Conseil d’Etat etelemisaki bolongoli bwa ye mpe linaka lya kopona 1er vice-président mosusu na Assemblée nationale na bosenga ya Jean-Marc Kabund, mokambi ya UDPS (Union pour la démocratie et le progrès social) na esika ya pésiden Félix Tshisekedi.

Vendredi, police mpe misala mya bokengi ekangaki nzela ya bokoti na parlement mpo na kopekisa maponami masengelaki kosalama.

Candidate kaka moko nde azalaki na liste : Patricia Nseya oyo UDPS eponaki.

M. Kabund afundaki na Cour constitutionnelle mpo na koboya mbeba amonaki na mokanda ya kolongola ye mpe lolenge yango esalamaki.

M. Kabund akweyisamaki kolanda pétition ebandisamaki na député Jean-Jacques Mamba ya UDPS.

Kasi baike ya ba députés baboyaki, moko na bango Simon Mpiana ya UNC (Union pour la nationa congolaise) ya Vital Kamerhe aundaki M. Mamba na ba zuzi na koloba été atiak signature na ye na pétition yango na lokuta.

Bosambisami bwango botelemisama na Cour ya cassation.

XS
SM
MD
LG