Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Evariste Ndayishimiye akolapa ndayi mpe akozwa bokonzi le 18 juin na Burundi


Général Evariste Ndayishimiye (G) na président Pierre Nkurunziza na congrès ya CNDD-FDD ma Gitega, Burundi, 26 janvier 2020.
Général Evariste Ndayishimiye (G) na président Pierre Nkurunziza na congrès ya CNDD-FDD ma Gitega, Burundi, 26 janvier 2020.

Evariste Ndayishimiye, molongi ya maponami ya le 20 mai na Burundi, akolapa ndayi mpe akozwa bokonzi le 18 juin nsima na liwa ya mbalaka ya Pierre Nkurunziza mposo moko moleki.

Cour constitutionnelle ekati ete mokonzi ya sika, général ya kala Ndayishimiye, azwa ebonga ya bokambi ekolo na lombango mpo na koboya mboka etikala pamba.

Ezali na bosenga ya mbulamatari.

Président Nkurunziza esengalaki atika bokonzi le 20 août kasi akufaki na mbalakaka na mibu 55, le 8 juin.

Minganga balobi liwa lya M. Nkurunziza ezalaki ya bozangi mpema mpe na nkwokoso ya motema kasi bana ya Burundi bazali komituma soki ezali COVID-19 te.

Mwasi ya M. Nkurunziza, Denise Bucumi, azwamaki na COVID na mai mpe akotaki lopitalo na Nairobi, na Kenya.

M. Ndayishimiye azali ya parti moko na M. Nkurunziza, CNDD-FDD. Alongaki maponami na koleka 68%.

M. Nkurunziza oyo asalaki mibu 15 na bokonzi, akokaki kopesa nkombo na maponami te mpo alekisaki mandats misato, ndelo etiama na buku likonzi.

Na 2015, ntango M. Nkurunziza apesaki nkombo na ye mpo na mbala ya misato, mobulu mokotaki na Burundi. Koleka bato 1.200 bakufaki mpe 400.000 bakimaki mboka.

XS
SM
MD
LG