Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Philipe II akokende lisusu te na RDC mpo na mibu 61 ya lipanda


Président Félix Tshisekedi elongo na molongani wa ye Dénise Nyakeru azali kotiya manzaka na buku nsima na bokutani na mokonzi to nkumu ya mboka Belgique Philippe na mwasi wa ye Mathilde na ndako ya bokonzi na Bruxelles, 17 septembre 2019.
Président Félix Tshisekedi elongo na molongani wa ye Dénise Nyakeru azali kotiya manzaka na buku nsima na bokutani na mokonzi to nkumu ya mboka Belgique Philippe na mwasi wa ye Mathilde na ndako ya bokonzi na Bruxelles, 17 septembre 2019.

Philipe II, Nkumu mokonzi ya Belgique akokende lisusu te na Ekolo Congo démocratique mpo na milulu mya bokanisi mibu tuku motoba na moko ya lipanda.

Asololi na président Félix Tshisekedi na nzela ya singa mpe bazwi mokano ya kozongisa mobembo yango nsima mpo na bokono ya COVID-19 bozali kongala na RDC mpe na Belgique mpe na mokili.

Sango yango epesami na liyebisi ya bayi présidence ya RDC.

Nzonkande linaka lya mobembo ya président Tshisekedi na Belgique le 21 juin na Belgique mpo na kozwa linu liye lilobami kozala ya nkondo Patrice Emery Lumumba, Ministre wa Yambo yay ambo ya RDC, litikali.

Libota lya nkondo Lumumba lizali komibongisa na bozongisami lya linu lyango na mbulamatari ya RDC.

Kolanda linaka, linu lya lya likomema bisika biike bilakisa bitumba ya nkondo Lumumba lokola na Kisangani mpe Lomami.

Linu lyangi likonkunda na na place Lumumba na échangeur, na Limete.

Mwana ya policier moko ya Belgique nde alakisaki linu lyango nsima na liwa lya tata na ye oyo alobaki abombaka liny liye nsima na kobomoma Lumumba na baninga ba ye, na 1961, na Haut-Katanga,

Policier yango atatolaki ete bakataki nzoto ya Lumumba mpe batiaki yango na acide.

Belgique nde ekonzaki RDC.

XS
SM
MD
LG