Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Trump akati boyokani ya Etats-Unis na OMS mpe atombokeli Chine


Président Trump pene na Secrétaire d'Etat Mike Pompeo (C) mpe mopesi toli na ye mpo na ONU Robert O'Brien libanda na Maison Blanche, Washington D.C., 29 mai 2020.
Président Trump pene na Secrétaire d'Etat Mike Pompeo (C) mpe mopesi toli na ye mpo na ONU Robert O'Brien libanda na Maison Blanche, Washington D.C., 29 mai 2020.

Président Donald Trump akati boyokani ya Etats-Unis na OMS (Mabongisi ma molongo mpo na bokolongono), apameli yango na kozala na ngambo ya Chine mpe kobomba mbeba ya COVID19 eye ebomi bato mingi na mokili. Azwi miko mpo na Chine.

"Lokola balongi te na kosala mbongwana esengeli mpe ya litomba, toko sukisa lelo boyokani na biso na OMS mpe tokotinda misolo na bosenga misusu ya bokolongo ya bato, bosenga ya makasi mpo na mokili," elobi M. Trump liboso ya bapanzi sango.

Président ya Amerika apameli Chine na kotika bokono ya COVID19 oyo ebandaki kuna kopanzana na bikolo misusu.

"Mokili mozali kozela biyano ya chine. Mpo na nini Chine epekisaki bato baye bazwaki bokono ya COVID19 kolongwa Whuyane mpe kokende bisika misusu kati na mboka na bango ? Bokono bwango bokendaki te bisika mosusu na Chine. Ekandaki te na Beijing, ekandaki te bisusu misusu kasi batikaki bakoni kokende na bonsomi bonso bisika binso na mokili, na kati wana Poto (Europe) na Amerika. Kufa yango ememi ezal na motango te," elobi na nkanda M. Trump.

"Mokili ezali na mpasi lelo mpo mbeba ya mbulamatari ya Chine. Bobombi ya virus na Chine epesaki nzela na bopanzani bwa yango mokili mobimba, mpe emamaki pandémie eye ebomi koleka 100.000 Américains mpe koleka bato million moko na mokili mobimba. Bakambi ya Chine baboyaki kotosa malako ya OMS ya koyebisa mokili mobimba mpe batiaki bamba na OMS komema mokili na nzela mabe ntango virus eyabanaki na bakonzi ya Chine," ebakisi M. Trump.

Mokonzi ya USA apemali Chine mpo na mpasi bokono boye bomemi na nkita na mokili mobimba.

M. Trump azwi mikano mingi misusu lokola ya kopesa bayekoli ya Chine mpe bana ya Chine misusu kokota na Etats-Unis.

Akati mpe ndingisa epesama na Hong Kongo mpo kozala engumba ya mokili mpo na mobongo.

Alobi Chine epesaka 40.millions ya ba dollars na OMS mobu na mobu kasi Etats-Unis, 450 millioins ya ba dollars.

Mikano miye mizwami nsima na Chine kobotola bokambi bwa Hong Kong.

XS
SM
MD
LG