"Likita lya mbulamatari ezwi mokano ya kopesa bato balukama na CPI," esakoli ministre ya mamni ya Bapaya, Mariam al-Mahdi.
Alobi yango na bokutani na Soudan, na Karim kham, procureur général ya tribunal eye ezalaka na La Haye (Pays-Bas).
Esengeli yambo motkano mwango mozwa ndingisa ya Conseil souverain misala mya likolo koleka na Soudan, miye misangisaka ba civili na basoda.
Mwana ya ministre wa Yambo ya kala Sadek al-Mahdi oyo akweyisamaki na bokonzi na coup d’Etat na M. Béchir, ministre ya mambi ya Babaya alobi ezali "litomba mingi" kosala elongo na CPI mpo été "baye bazwaki mpasi bazwa bosembo mpoe bitumba na Darfour".
Na mibu 77, M. el-Béchir akweyisamaki ye mpe na bokonzi na février 2020, nsima na mibu 30 ya bokonzi ya makasi, kolanda botelemeli ya ba civili bobandaki na nkanda ya bomati ntalo y amapa.
M. el-Béchir aboyaka kondima boluki kokanga ye CPI ebimisaki.