Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Etats-Unis na Europe basengi bokutani ya lobango na ONU mpo na Soudan


Bayi mboka Soudan bazali kosepela na boleki ya mituka ya mampinga nsima na bokweyisi ya bokonzi ya Omar el-Béchir, na Khartoum, Soudan, le 11 avril 2019.
Bayi mboka Soudan bazali kosepela na boleki ya mituka ya mampinga nsima na bokweyisi ya bokonzi ya Omar el-Béchir, na Khartoum, Soudan, le 11 avril 2019.

Bakonzi ya Etats-Unis mpe ya Europe basengi bokutani ya Conseil ya sécurité nsima ya Coup d’Etat na Soudan.

Bokutani liye likosalama o’mokolo ya minei kasi likozala ya bikuke bikangama.

Mampinga ya ekolo Soudan makweyisi président Omar el-Béchir na bokonzi nsima na bato kotelemela bokonzi na ye.

Omar el-Béchir oyo azali na mibu 75, akweyisami na bokonzi nsima na kokonza Soudan mbula 30.

Kasi nsima na bokweyisami na bokonzi, baye bamemaki mobulu moye basepeli te. Basengi na bana mboka kokoba kotelema liboso ya quartier général ya mampinga na Khartoum, engoumba mokonzi ya Soudan.

XS
SM
MD
LG