Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Egypte, Ethiopie na Sudan bazo'luka eyano na Kinshasa na matata ya barrage Renaissance na ebale ya Nil


Président Félix Tshisekedi (5e D) kati na ba ministres ba mambi ya Bapaya ya Egypte, Ethiopie mpe RDC na masolo mpo na matata ya barrage Renaissance, na Kinshasa, RDC, 4 avril 2016. (Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi (5e D) kati na ba ministres ba mambi ya Bapaya ya Egypte, Ethiopie mpe RDC na masolo mpo na matata ya barrage Renaissance, na Kinshasa, RDC, 4 avril 2016. (Présidence RDC)

Masolo mpo na matata likolo lya na barrage monene Renaissance na ebale ya Nil mazali kokoba na Kinshasa,

Ba miniztres ya mambi ma bikolo mabaya ya Egytpe, Soudan mpe Ethiopie bazali kosolola Nzinga Nzinga na Félix Tshisekedi mokambi ya Union africaine. Félix Tshisekedi asengaki lobi ngambo inso kafungola motema mpo ete eyano epsama na kimya mpo na bolamu ya banso.

Ethiopie etongi barrage yango nan tina ya kopesa lotiliki na bavandi na yango million nkama moko na tuku sambo mpe mboka esusu kasi Egypte ekebisi ete yango ekopekisa kozwa mayi mpe elobaki ezali likambo lya bomoi.

Ebale Nil ezali esika Egypte, mboka esobe, ezwaka mayi mpo na bilanga mpe ya komela. Sudan elobi ete botongi ya barrage Renaissance bokopekisa ba barrages na yango kozwa mayi masengeli.

XS
SM
MD
LG