Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Général moko akangemi mpo na coup d’Etat esimbaki te na Soudan


Mokambi ya mibale ya bokonzi ya basoda na Soudan, Mohamed Hamdan Dagalo, elongo na baye ya Conseil ya transition ya mampinga, na Khartoum, 17 juiller 2019.
Mokambi ya mibale ya bokonzi ya basoda na Soudan, Mohamed Hamdan Dagalo, elongo na baye ya Conseil ya transition ya mampinga, na Khartoum, 17 juiller 2019.

Basoda baye basimbi bokonzi na Soudan basakoli ete bakangi général moko elongo na mingi ya baye ya misala ya bokengi mpo na Coup d’Etat esimbaki te le 11 juillet eleki.

Kolanda liyebisi agence officielle ya presse ya Soudan (SUNA) ebimisi, bayi politiki bayike mpe bakangami mpo na likambo yango.

Général Hachim Abdel Mottalib, mokambi ya mampinga mpe baye ya misala ya NISS (misala ya bokengi ya Soudan), bakambi ya ba mouvements islamistes mpe ya Parti ya Congrès national ya mokonzi ya kala Omar el-Béchir, batangami na liyebisi liye.

Nzokande, basoda nde basimba bokonzi ya Soudan banda bana ya ekolo eye bakweyisaki président Béchir, le 11 avril, na botamboli mpe kotelemela ye.

Milulu miango mibandaki nsima na nkwokoso ya mapa na ekola yango.

XS
SM
MD
LG