Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Etat de siège: Washington esepeli te na botiami ya bakambi bafundama mpo na mbeba ya bomoto


Linda Thomas-Greenfield, ntoma ya Etats-Unis na ONU, na New York, 1er mars 2021.
Linda Thomas-Greenfield, ntoma ya Etats-Unis na ONU, na New York, 1er mars 2021.

Ntoma ya Amerika na ONU Linda Thomas Greenfield ayebisaki yango na président Tshisekedi na lisolo bazalaki na yango o’mokolo mwa mitanu na nzela ya nsinga, kolanda Ambassade ya Amerika.

Etats-Unis elobi ezali ekopesa maboko na état de siege na Ekolo Congo démocratique kasi etungisami mpo bakambi baye batiami mpo na kokakmba yango bafundama na mbeba ya bomoto.

Ntoma ya Amerika na ONU Linda Thomas Greenfield ayebisaki yango na président Tshisekedi na lisolo bazalaki na yango o’mokolo mwa mitanu na nzela ya nsinga, kolanda Ambassade ya Amerika.

Etats-Unis esengi mpe ete misala mya état de siège misala elongo na MONUSCOmpe ba humanitaires to basungi ba ONU.

Linda Thomas-Greenfieild asengi mpe ete masolo mpo na matata ma barrage renaissance na ebale ya Nil kati na Ethiopie, Egypte na Soudan president Tshisekedi azali komema lokola mokambi ya Union africaine, mabota eyano.

XS
SM
MD
LG