Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Omar el-Béchir atindami na boloko


Omar el-Béchir mokonzi ya kala Soudan na masolo ya mboka na ye na Khartoum, Soudan, 5 avril 2019.
Omar el-Béchir mokonzi ya kala Soudan na masolo ya mboka na ye na Khartoum, Soudan, 5 avril 2019.

Soudan Omar el-Béchir, président ya kala ya Soudan, atindami na butu moleki na boloko na Khartoum, elobi moko na baye nzinganzinga ye.

Mokonzi ya ekolo Soudan akweyisamaki na bokonzi le 11 avril nsima na botomboki ya ban aya mboka na ye.

M. Béchir, 75 ans, asimbamaki kino ntangu liye na maboko ya mampinga na bisika biyebanaki te.

Mobulu ekweyisaki ye ebandaki na botelemeli ntalo ya lipa.

El-Béchir alukamaka na CPI (Cour pénale internationale) pene na na mibu zomi.

Avandaki na bokonzi pene na mibu tuku misatu.

XS
SM
MD
LG