Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sonangol elingi etonga raffineri ya petololo na Cabinda


Ndako ya Sonangol (Compagnie nationale ya petelolo ya Angola) na Luanda, 10 novembre 2018.
Ndako ya Sonangol (Compagnie nationale ya petelolo ya Angola) na Luanda, 10 novembre 2018.

Sonangol (Compagnie nationale ya petelolo) asali boyokani na Untied Shine mpo na kotonga raffinerie to mpe izini ya kosokola petelolo eye epetwami naino te na Nord ya Cabinda, elobi bakonzi ya Angola na liyebisi.

Raffinerie eye ekopetola nkama nkoto motoba ya barrils ya petelolo esukwami te, elakisi liyebisi.

Sonangol esakoli ete ekomatisa makoki na yango ya ko bimisa petololo ya raffinerie ya Luanda.

Misala maye mikopesa nzela na kolisa bozangi ya petololo bozalaka ntango mingi na Angola.

XS
SM
MD
LG