Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Félix Tshisekedi, Kagame na Joao Lourenço na matanga ya Etienne Tshisekedi


Président Félix Tshisekedi apesi losako na nkondo Etienne Tshisekedi na stade des Martyrs, Kinshasa, 5 mai 2019.
Président Félix Tshisekedi apesi losako na nkondo Etienne Tshisekedi na stade des Martyrs, Kinshasa, 5 mai 2019.

Président Félix Tshisekedi apesi losako na nkondo tata wa ye, Etienne Tshisekedi, na Stade ya na Martyrs ya Pentecôte esika wapi nzoto ya mowei etiyami.

Bakonzi ya mboka nzike basakolami mpo na matanga ya Etienne Tshisekedi, opposant mpe mokambi ya kala ya lingomba UDPS.

Paul Kagame ya Rwanda mpe Joao Lourenço ya Angola basilaki kokoma na Kinshasa.

MM. Kagame mpe Lourenço basololi na mokokani na bango ya Congo démocratique Félix Tshisekedi (mwana ya mowei) yambo na kokende na stade ya ba Martyrs ya Pentecôte esika wapi basengeli kotika maboke ya fololo mpo na kopesa losako na Etienne Tshisekedi.

Bokutani na bango bosalamaki na Nsele mpe masolo mango mazalaki mpo etali kimya, bokengi mpe nkita, kolanda baye ya présidence ya Congo démocratique.

Bakonzi basato baye bakokende na Stade des Martyrs epayi wapi nzoto ya nkondo Tshisekedi etiyami mpo na milulu ya matanga.

Bakonzi ya bikolo bisusu mpe bazelami lokola Denis Sassou Nguesso ya Congo-Brazzaville, Edgar Lungu ya Zambie, Faure Nyassingbé ya Togo mpe Alpha Condé ya Guinée.

Nzoto ya Tshisekedi emami na nsima na nzanga na stade na kolongwa na morgue ya hôpital ya Cinquantenaire epayi wapi etiyami nsima na bokomi lobi loleki na mpokwa.

XS
SM
MD
LG