Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bosambisami ya bafundami na liwa ya Français moko na Cabinda bokobanda le 29 mai


Bosambisami moko na Cabinda, le 16 aout 2018.
Bosambisami moko na Cabinda, le 16 aout 2018.

Bosambisami ya bato mwambe bafundami na liwa ya Français moko na 2016 bokabanda le 29 mai na Cabinda, na Angola, elobi bandendeko ya mowei.

Mowei, Benoît Nayme akutamaki akufi na ndako na ye na 2016, na engumba mokonzi ya enclave ya Cabinda. Azalaki na mibu 26 mpe azalaki kosala na entreprise française ya chaudronnerie Friedlander (groupe Ortec), sous-traitante ya pétrolier américain Chevron.

Awaki nsima na kobetama. Pulusu ekanisaki yambo ete bamiyibi nde bamobomaki.

Kasi libota na ye eboyaki yango. Mpe, bakonzi ya France basengaki ete balukiluki na bango bandimama na na bolukiluki na Cabinda.

Balukiluki ya France bakita na Cabinda. Bolukiluki na bango na kotala ADN mpe ba téléphonique bopesaki nzela na komona makambo ndenge mosusu.

Sik’oyo bolukiluki bozali kotala bobomi na nko (homicide volontaire).

XS
SM
MD
LG