Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Matanga ya Jonas Savimbi etikali kaka le 1er juin


Jonas Savimbi, mokambi ya kala ya lingomba Unita, awa na Bruxelles, le 25 septembre 1996.
Jonas Savimbi, mokambi ya kala ya lingomba Unita, awa na Bruxelles, le 25 septembre 1996.

Lingomba ya kala batomboki ya Angola Unita, liye likoma na opposition, liyebisi ete matanga ya mokambi na yango ya kala Jonas Savimbi etikali kaka le 1er juin ata mobulu mozalaki na gouvernement likolo na nzoto ya mowei.

"Bokundi ya nzoto botikali kaka le 1er juin," elobi mwana mwasi ya liboso ya Jonas Savimbi, Cheya Savimbi.

Molebeli ya Unita, Alcides Sakala Simoes asengi bato bazala kimia mpo matanga ezali ntango ya mobulu te.

Unita mpe libota ya Savimbi balobi ete bakendeki mercredi na Andulo esika wapi gouvernement etikaki nzoto ya mowei mokolo moko moleki.

Mwa mobulu mosalamaki kati na gouvernement, Unita mpe libota.

"Tolingi matata te," elimbolaki Cheya Savimbi.

Mpo na libota, gouvernement ezalaki kobanga ete nzoto ya nkondo elakisama na Huambo esika wapi Jonas Savimbi avandaki.

Unita epamelaki gouvernement ya Angola mpo koboya kopesa yango nzoto ya nkondo Jonas Savimbi o’mokolo ya mardi lokola linaka esakolamaki. Bakonzi ya Angola bango balakisaki mosapi na bakambi ya Unita mpe libota na ye mpo na kotiya mobulu.

Gouvernement esakolaki yambo ete ekopesa Unita mpe libota nzoto ya Savimbi na mboka Luena "kasi na nsima (bakonzi) balobaki ekomi na Kuito mpe na nsuka ekomaki na Andulo," elimboli Sakala.

Matanga ya mokambi ya kala ya Unita esengeli esalema le 1er juin na mboka eye abotama, Loputanga. Kasi milulu yango mikosalama te.

Na ngambo na yango, gouvernement elobi Unita nde ezali kotiya mobulu mpo ezalaki te na Luena mpo na kozuwa nzoto ya mowei.

Jonas Savimbi, motomboki mpe mokambi ya Unita, akufaki na bitumba na mampinga ya Angola le 22 février 2002.

Akundamak kasi gouvernement ekundolaki nzoto na ye mpe esalaki ba tests ya ADN maye malakisa ete ezali solo ebembe ya Savimbi.

Liwa na ye ezalaki suka ya bitumba bizalaki kongala na Angola banda lipanda na ya ekolo eye na 1975.

XS
SM
MD
LG