Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Nzoto ya nkondo Savimbi ezongisami na libota na ye


Jonas Savimbi, mokambi ya Unita, na Bruxelles. le 27 setembre 1996.
Jonas Savimbi, mokambi ya Unita, na Bruxelles. le 27 setembre 1996.

Gouvernement ya Angola ezongisi nzoto ya nkondo Jonas Savimbi na libota wa ye nsima ya mibu 17 ya liwa na ye na Angola, eyebisi bakambi ya lingomba Unita mpe baye ya libota.

Mwa matata mazalaki likolo na nzoto liye kati na bakonzi ya mboka na libota mpe Unita, lingomba ya batomboki ya kala likambamaka na Jonas Savimbi.

"Nzoto ezongisami na libota… Ezali na litomba mingi mpo na kozongisa boyokani na ekolo," elobi molobeli ya Unita, Alcides Sakala Simoes.

Milulu ya bozingisi nzoto eye misalamaki na centre culturel na Andulo, na pene ya 30 kms na mboka Lopitanga esika matanga makosalama o’mokolo ya mposo.

"Tozali na mawa kasi mitema mikiti mpo tokoki sik’oyo kolela ye," eyanoli na AFP Cheya Savimbi, mwana mwasi wa yambo ya nkondo Savimbi.

Gouvenement, Unita mpe libota bazalaki kofundana moko na basusu likolo ya nzoto eye.

Gouvernement ekundolaki nzoto ya Savimbi mpe esalaki ba tests ya ADN kasi ezongisaki yango te na libota.

Mikolo misato mileki, libota, Unita mpe gouvernement bayokani malamu te mpo na esika ya bopesi nzoto yango.

Jonas Savimbi, motomboki mpe mokambi ya Unita, akufaki na bitumba na mampinga ya Angola le 22 février 2002.

Liwa na ye ezalaki suka ya bitumba bizalaki kongala na Angola banda lipanda na ya ekolo eye na 1975.

XS
SM
MD
LG