Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Savimbi akundami nsima ya matanga na Lopitanga


Jonas Savimbi, mokambi ya Unita, le 22 fevrier 2002.
Jonas Savimbi, mokambi ya Unita, le 22 fevrier 2002.

Jonas Savimbi, mokambi ya lingomba ya batomboki ya kala na Angola, Unita, akundami o’mokolo ya mposo nsima ya matanga masalami na mboka ya mbotama na ye, Lopitanga.

Matanga mpe bokutami ya M. Savimbi masalami mibu 17 nsima na bobomani na ye na 2002 na bitumba na mampinga ya gouvernement ya Angola.

Nsima na liwa na ye, basoda bakundaki ye na lobango. Angola ekambamki na Jose Eduardo dos Santos, motambwisi ya kala ya lingomba MPLA, liye lizali na bombanda na Unita na Angola. Kasi M. dos Santos atikaki boknzi na 2017 mpo na bokono.

Gouvernement ekundolaki nzoto yango na janvier 2019 mpe test ya ADN esalamaki mbala nzike.

Nsima ya mwa matata, gouvernement ezongisaki nzoto ya M. Savimbi o’mokolo ya minei.

XS
SM
MD
LG