Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Sassou Nguesso akomi na Kinshasa mpo na matanga ya Tshisekedi


Président Denis Sassou N'Guesso ya Congo ayambi mokokani wa ye ya RDC Félix Tshisekedi, na Brazzaville, le 7 février 2019. (Facebook/Fatshi News)
Président Denis Sassou N'Guesso ya Congo ayambi mokokani wa ye ya RDC Félix Tshisekedi, na Brazzaville, le 7 février 2019. (Facebook/Fatshi News)

Président Denis Sassou Nguesso ya Congo-Brazzaville akomi na Kinshasa mpo kopesa kopesa monano ya suka na nkondo Etienne Tshisekedi, mobundi ya démocratie mpe mokambi ya lingomba UDPS.

Sassou Nguesso akiti na hélicoptère na jardin ya Palais de la Nation mpe ayambami na mokokani waye ya RDC Félix Tshisekedi, mwana ya mowei.

Mokonzi ya Congo-Brazzaville akotika fololo na stade ya ba Martys ya Pentecôte epayi wapi nzoto ya nkondo Tshisekedi etiyami.

Ntango moke yambo na bokomi ya M. Sassou, bakonzi ya Rwanda Paul Kagame mpe ya Angola Joao Lourenço balekaki na esika ya matanga mpe batikaki fololo. Kasi balongwa mpe bazongaki na mboka na bango mpo na manaka masusu.

XS
SM
MD
LG