Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

SADC endimi kotinda mampinga kopunda na ba dongolomeso na Mozambique


président Félix Tshisekedi ya RDC na likita lya bakambi ba SADC na Maputo, Mozambique, 23 juin 2021. (Twitter/Présidence RDC)
président Félix Tshisekedi ya RDC na likita lya bakambi ba SADC na Maputo, Mozambique, 23 juin 2021. (Twitter/Présidence RDC)

Bakambi ba bikolo bya SADC, lisanga lya nkita lya bikolo bya Afrika ya nse, bandimi kotinda mammpinga ma bango kosunga Mozambique kobundisa mangomba ya badongolomeso to ba djihadistes bazali na mboka wuto mibu misatp. Balakisi bondeko na bango na bato bazwaki mpasi na likama na volcan Nyiragongo.

Bakambi ba bikolo bya SADC bakutanaki mardi na Maputo, na Mozambique mpo na kotala itumba ya badongolomeso na Cabo Delgado, etuka ya nord na Mozambique, mpe na Ekolo Congo démocratique bikozala kati na masolo ya likita lyango.

Bazwi mokano ya kotinda mampinga na Maputo.

Président Félix Tshisekedi azali kuna wuto lundi na mpokwa.

Mokonzi ya Ekolo Congo démocratique alobelakia makasi mamapinga ma Ekolo congo démocratique, ba FARDC, bazali kosala na lisungi lya mampinga kati na MONUSCO mpo na kosusika ba dongolomeso na monyele ya mboka wuto sanza moko na na pene mposo misato.

Brigade ya intervention rapide ya bikolo bya SADC ezalaka na MONUSCO na misala mibengami FIB.

Mposo moye basimba minduki mpe batomboki ya mangomba mingi na nkama motango ya nkama moko na tuku minei batiki mindukimpe bamizongisi na ba FARDC.

SADC mpe etindi maloba ya bondeko na bato baye bazwaki mpasi na botomboki ya volcan Nyiragongo sanza moleki na Nord-Kivu.

XS
SM
MD
LG