Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bokengi mpe kimya na RDC ekotalama na likita ya SADC na Gaborone


Président Félix Tshisekedi na nela na ye na likita lya SADC na Gaborone, Botswana, 26 novembre 2020. (Twitter/Fatshi News)
Président Félix Tshisekedi na nela na ye na likita lya SADC na Gaborone, Botswana, 26 novembre 2020. (Twitter/Fatshi News)

Bakambi ba bikolo kati ya SADC bazali kotala lelo likambo litali bokengi mpe kimya na RDC, na Gaborone, na Botswana.

Likita lyango libengisami na mokonzi ya Botswana mpe mokambi ya ngonga eye ya SADC, lisanga lya nkita mpe ntambwa lya bikolo ya Afrika ya sudi mpe kati, Dr. Mokgweetsi Eric Keabetswe Masisi.

Ekozala mingi bokutani bwa eteni ebangami Troïka mpe ekotala likambo lya bikolo bipesaka basoda na Brigade ya lipinga ya intervention (FIB) lisungaka MONUSCO, misala mya ONU na Congo.

Yambo na likita lya bakambi ba bikolo, ba ministres ya bobateli ya bikolo inso bakutanaki.

SADC esengaki ete FIB ebongwama kasi kaka bikolo bizali kati na yango (SADC) nde bikoba kopesaka basoda.

XS
SM
MD
LG