Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi abimisi mbulamatari ya Sama


Jean-Michel Sama Lukonde, Ministre wa Yambo ya sika na RDC (G) na président Félix Tshisekedi na Palais de la nation, Kinshasa, 18 mars 2021. (Facebook/Présidence RDC)
Jean-Michel Sama Lukonde, Ministre wa Yambo ya sika na RDC (G) na président Félix Tshisekedi na Palais de la nation, Kinshasa, 18 mars 2021. (Facebook/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi abimisi mbulamatari ya Ministre wa Yambo Jean-Michelle Sama nsima na bozeli ya sanza mibale wuto mokeli mbulamatari atiamaki na esika.

Mokano ya mokonzi ya mboka motangamaki na molobeli ya mokonzi ya mboka Kasongo Mwema Yamba Yamba.

Ba ministres 57 bazali na mbulamatari yango. Basi bazali 14, lokola 27% ya bayi mbulamatari banso, bo' SADC esengi na bikolo bya yango banso.

"Totalaki mpenza lolenge ya batu. Kasi tozali na lotomo ya kozongela mangomba ma politki maye matindaki na ba nkombo," elimboli Ministre wa Yambo Sama.

Mbula ya bato bazali na mbulamatari ezali nzinanzinga na mibu 47 mpe 80% bazali bilongi bya sika, ekomi Ministre wa Yambo Sama na Twitter na ye.

Motango yango mozali moke na kotala mbulamatari ebimi eye ezalaki na bato 65.

Ministre wa Yambo alobi asepeli na mbulamatari yango mpo ngomba inso ekutani na kati, kolanda M. Kasongo Mwema.

Mingi na ba ministres bazali bato ya sika.

XS
SM
MD
LG