Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Mokambi ya diaspora ya Rwanda abomami na masasi na Mozambique


Police na balabala na Beira, Mozambique. 16 novembre 2013.
Police na balabala na Beira, Mozambique. 16 novembre 2013.

Mokambi ya lisanga ya baye ya diaspora ya Rwanda na Mozambique akufi na masasi na Maputo, na baye bayebani te, elobi police.

Kolanda baye ya police ya engumba mokonzi ya Mozambique (Maputo), bato misato batelemisaki Louis Baziga, ya mibu 47, mpe babetaki ye masasi ntango azalaki komema motuka mpo na kobima na magazini na distrcit ya Boane.

"Mowei azalaki nanu na bomoi ntango amemamaki na lopitalo ya Maputo kasi akoki te kobomba mpema mpe akufaki," elobi liyebisi ya police.

Ntoma to ambassadeur ya Rwanda na Mozambique, Claude Nikobisanzwe ayebisi ba mdia ya Rwanda ete police ezali kosala bolukiluki kasi moto moko te akangami.

M. Baziga abikaki na 2016 ntango bato bayike balukaki koboma ye.

Boko ya bana ya Rwanda bavandi na Mozambique bayebisi AFP ete bakanisi ete ezali mpo na politiki nde M. Baziga azwi likama liye libomi ye.

Mingi bakanisi ete M. Baziga akomaki moye ya ngambo ya mbulamatari ya Rwanda mpe bakanisi ete ba nguna ya bokonzi ya Kigali nde batielaki ye motambo, kolanda AFP.

XS
SM
MD
LG